mardi 26 mai 2015


Maloba ma botondi

Nsango mokonzi  ya Paroisse ya biso, Révérend Père Carlos Rommel, CICM, Ba mibonza, ba ndeko banso batiki bisika wapi basanganaka mpe bayei awa mpo na likwela liye, ba mama, ba tata, ba ndeko basi mpe babali, boboto………………….esengo.

Lelo ezali mokolo mwa esengo, mokolo mwa Nzambe. Mokolo nini biso banso tosangani mpo ya kokumisa Nzambe, kotondo ye botondi na libonza ya misa mpo ya manso asala, azali kosala mpe akosala mpo na biso.

 
Tozali mpe kotondo Nzambe botondi mpo ya bomoyi apesi na nsango na biso Carlos ROMMEL, CICM, oyo azali kosepela mibu 78 ya mbotama ya ye. Na libaku lina nauti mpe kokundola bilako bya ngai mpo ya mbala ya  isato na lingomba ya ba CICM/ou les Pères des SCHEUT. Ezali esengo te ? Nsoki esongo ezali tobetela Nzambe maboko.
 
 

Nazali mpe kotondo baboti ba ngai mpo na bomoi bampesi na ngai, na ndenge ba batelaki ngai mpe bazali kokoba kosalisa ngai mpo na zala moto.

Matondi lisusu na ba kristu banso ya Paroisse ya biso. Soki nazali oyo nazali lelo ezali mpe mpo ya bino banso bosalisaki ngai na makambo ndenge na ndenge. Ndakisa ba mama katikisi ba  ngai bazali awa, ba mama légionnaire balendisaki ngai, koleka naino ba mama conseillères ba biso ya légion oyo batondi na esengo na komona biso kokoba mobembo mwa biso, na ba ndeko ba ngai ba légionnaires esika nini nazali komibokolo tiii lelo, ba professeurs ba biso oyo ba kokaki ba matungisi ma biso koleka naino matungisi ma ngai, na ba kristu banso oyo basalisaki ngai mpe bazali kokoba kosalisa ngai mpo na zala moto. Matondi mingi.

Na kosenga na bino banso eloko moko. Bolembe te kosalisa Bumba mpo ‘te tozala bato. Tokangama na mateya ma Yezu, tosalela mango mpe tobota mbuma. Mbuma ya mpamba mpamba te, kasi mbuma ya elengi mpenza. Na yango bosambela mpo ya ngai, mpo ya biso, mpo ya Bumba.

 

                                                Wa bino mwana, ndeko Daty Hervé, CICM      

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire