dimanche 19 juin 2016


12ième dimanche mobu C

            Galates : 3,26-29    Luc : 9, 18-24

            Yezu azali kosambela, yee moko, asambelaka mbala mingi yee moko. Mpe na mbala yoko, bayekoli bayei.  Yezu atuni bango : Batu balobaka ‘te ngai nani ?  Quelle question ! : Bazongisi : basusu balobaka ‘te yo ozali : Yowane Mobatisi, basusu balobaka yo Elia.  

Yezu lokola  Elia. !!!!  C’est fort.

             Eli a tué des centaines de faux prophètes, il a fait descendre du ciel du feu, trois an et demi il a fermé les vannes du ciel. Un peu trop fort, Yezu asali yango mokolo moko te,  azali mpe satisfait  na réponse ya bango te ntina yango  atuni  lisusu  : kasi binu, binu bokanisi  nini, Ngai nani ? A la fin des fins Simon Petro alobi : Yo ozali Mwana wa Nzambe, ozali Messia. ozali moto wa Nzambe, ozali Nzambe.   

Yezu azongisi : Osakola yango na moto moko te, naboyi, nalingi te ‘te oloba yango. Boyoki, naboyi.      Mpe abakisi

             Ngai nazali mwana wa moto. Fils d’homme. Nakoyoka mpasi mingi, bakonzi ba bino, banganga Nzambe ba binu  bafarizeo bakonyokolo ngai mpe bakoboma ngai, kasi nsima ya mikolo misatu ndenasekwi.

Mwana wa moto elingi koloba nini ?

            Nazali mwana wa Pilato te, mwana wa Hérode te, wa Mokonzi te, wa farizeo te, wa commerçant monene te,  wa Nganga Nzambe te lokola Yowane  Mobatisi.  Nazali mwana wa moto, mwana na nkombo te, mwana afandaka o kati ya mboka eke, mwana wa  moumbu,  moumbu azali   na nkombo te.  Mpe bakoboma ngai,  

            Botala bipai binso,  babomaka batu mingi, mokolo na mokolo batu  “na nkombo” te bakufaka, , bitumba bizali bipai binso  mpe batu bakufaka ebele mokolo na mokolo o nse mobimba.  Soko mokonzi to mwana wa mokonzi akufaka,  bakoloba yango bipai binso, ekoyebana na nse mobimba, kasi soko mwana wa moto akufaka, balobaka te.

            Kasi ngai Yezu, mwana wa moto nalobaka , nasopaka, ntina yango bakoboma ngai.  Ngai  nafandaka na ndako ya mokonzi te, nafandaka o ndako ya ndele, soko mbula ebeteke naporoko, soko mompepe mozali makasi, toit ya ndako ya ngai  ekei, soko mai mamataka ndako ya ngai ezindami, ngai mwana wa moto, na nkombo te, kasi nalobaka.    Nazali mwana wa Nzambe te, zambi soko nazali Mwana wa Nzambe, batu bakosambela ngai mpo nabikisa bango,  bakoloba : “tokufa nzala, bikisa biso,”.    Te, ezala boye te,  ngai nazali kaka mwana wa moto,  nalobaka.    Kasi

Alobaka nini ?

Totala litangi lya Santu Polo.   Ye alobi : moto akomi MOKRISTU  akoloba nini ?  : Bokeseni o kati ya moyuda na mopaganu bozali lisusu te, o kati ya mwasi na mobali bozali te, o kati ya moumbu mpe monsomi bozali te.

             La différence entre un esclave et un homme libre dans le temps du Christ était énorme. On pouvait librement frapper, blesser ou tuer un esclave, il n’avait pas de nom. On pouvait chasser la femme comme on voulait, l’homme était un maitre absolu. Maintenant, dans notre situation  actuelle : Pourquoi la différence de salaire entre député et enseignant, Un enseignant  travaille mokolo na mokolo, se tient debout pour enseigner des heures, corrige des examens. Pourquoi la grande différence de salaire.  Pourquoi l’énorme différence entre riche et pauvre.  Le riche a un nom, le pauvre n’a pas de nom. Yango wana, ngai Yezu nayei mpo ya kosakola, égalité ezala.   Ntina yango babomi ngai.

            Binu batu soko bolingi kolande ngai,  bosala ndenge yoko.  ‘Différence ezala         lisusu te, mobola  azala lisusu te, ndako ya mabe ezala lisusu  te, nzala ezala lisusu te,  bato balala  o mabele to litoko lisusu te, kasi banso  baliya malamu,  , balala malamu.  Ngai nazali mwana wa moto, nayebi mpasi ya batu.

            Binu batu bobyanga ngai te mpo ‘te nabikisa binu, kasi moto na moto  alanda ngai, ameme kuruse ya ye mokolo na mokolo, mpe asopa lokola ngai nasali mpo 'te bokeseni bozala lisusu te o kati ya batu, mpe mpo'te banso bafanda mpe baliya malamu. Binu batu, bosala makasi, bosakola mpo ‘te bolamu bozala o nse mobimba mpo ya batu banso.

                                                                                                          Paroisse Notre Dame

                                                                                                                      Bumba

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire